• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Nzambe na bomoyi

Allelua Nzambe na bomoyi;
Mitema esi etondi na posa na Yo;
Topusani, tobelemi lokola basikolami;
Toye lokola ba biangami;
To ye lokola bana;
Toye lokola basali;
Toye pe lokola baninga;
Ebombameli ya basantu ;
Nkolo ya nkembo nionso ;
Yoka lolaka ewuti o mitema;
Ya baye ozua na mokili;
Otia pembeni;
Yo nde Nzambe;
Opesaka bomoyi Nkolo;
Ozongisaka elikia na mokili;
Obuakaka mokote;
Yango to ye epa na Yo;
Yamba mitema;
Pe ndima losambo;
Ndima masanjoli Mokonzi;
Allélua ah
Refrain
(Nzambe na bomoyi,
Ya ngayi motema ekoma ya Yo,
Molingami na nga oyo ya tango nionso ;
Na mikabi na yo,molinga malamu ;
Opesaka bomoyi na baye banso baye epayi na Yo,
Nzambe yo bolingo
Nzambe na nga
Na yebi Nkolo) 2fois

C1: Nkolo na bomoyi, Yo nde elikia na ngay;
Bomoyi na nga esimbani na Yo, Nkolo;
Yo nde molingami na ngay;
Na talela kaka se Yo;
Na bomoyi na nga nakobanga eloko te, Nkolo ;
Chœur :
Motema mua nga pe mabanzo na nga ;
Na banjeli Yo yango;
Sala na ngo elingi Yo.
Ref.

C2: Nkolo Yo nde Mosantu;
Yamba loyembo na nga ;
Moto na bolembu Yo nde makasi na nga ;
Nguya ya babulami ;
Lisekua ya basantu ;
Mosusu lokola yo amonani te ;
Mokonzi ya milimo ya bato ;
Ya ngayi maboko etombuami ;
Liboso ya kiti ya bokonzi na Yo.
Ref.

C3: Nayebi Yooo, Nkolo na nga;
Bilaka na Yo eko kokisama na bomoyi na nga;
Nzambe na nga;
Oyo olobaki eko kokisama;
Nayebi, nayebi Yo;
Okosaka te,
Nayebi yo
Elikia na ngay;
Se na Yo.

Page précédente!