• +243 810 273 303
  • loyembo@yangoyo.com

Identité ya Mokonzi


Na ye na nionso nazali
Epayi na Yo Mokeli
Bomoyi na nga efukami
Natatola oyo osali na nga
Yamba masanjoli
Ewuti na motema na nga
Libonza na pesi na Yo
Malasi ya motuya nga na sopi
Liboso ya kiti na yo
Bipayi na kutani na liziba
Ya ngoluee
Ekotanga na motema
Na motema o’ya nga aah
Opesi bomoyi bwa Yo
Mbeka ya motuya Nkolo
Osopi makila na talo
Osomba milimo oyo ya boye bandimeli
Yango nakoti lelo na molongo ya balongi
Yango namoni kati na nga bilembo
Ya bonzambe bwa Yo
Yango nafandi lelo bipayi yo ozalieeh
Na mona nkembo na yo
(Yango na semboli loboko
Natatola se bolingo na Yo
Nafungoli motemaee
Na yamba ngolu na Yo Nkolo
Nazala oyo Yo olingi
Po ete na sepelisa motema na Yo
Nkolo ya bomoyi na nga) 2fois,
Uta na kotuna na yo
Lisapo na nga ebongwami
Y’olokota mokweyi
Y’ondimi nga kati na yo
Nazui identité
Bomoyi oyo ya babulami
Na koti kati ya bonzambe
O modeler nga ;opesi forme
Mon passé s’est écroulé
Y’ango na koti lelo yo
Na molongo ya balongi yaya
Yango na moni kati na nga
Bilembo ya bonzambe bwa Yo
Yango na fandi lelo Yo
Bipayi ozali
Na mona nkembo na Yo
Yo obonjeli lolenge na nga
Nazui me ntina kati ya bonzambe
Yo ndimi nga tozala baninga
Ma main dans ta main
Totambola elongooo
Na mozindo ya balongi ya Nzambe
Masolo ya mitema esopana
Zala wa nga, na lingi Yoo Yesuee
Nzete ya bopemi na nga
Position esimbi kondima na nga
Merci po ozui nionso ya ngaee Mosantuee
(Olatisa nga elamba ya sika
Kombo na Yo
Identité ya mokonzi nazui
Na koti na molongo
Propriété privée ya Nzambe
Eh ! Nga nazui ngolu
Oyo nde bomoyi ya sika) 2fois,
(Identité ya mokonzi
Nazali oyo Ye azaliee
Na wuti kati na Yesu
Nazali mwana na Nzambe
Yango naza kodondua
Lokola Nzambe ya muana) 2fois,
(Yango na semboli loboko
Natatola se bolingo bwa yo
Nafongoli motema na yamba ngolu na yo
Nazala oy’olingi, po ete na sepelisa
Motema na Yo Nkolo ya bomoyi na ngay) 2fois.

Page précédente!