Date & Visites
Sam 13 Dec 2025.
Visiteurs : 776129
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
C1: Eh Yahwe! Eh yahwe! Eh yahwe!
Yo liziba na ngaaa
Refrain
Eh yahwe, Eh yahwe, Eh yahwe,
Yo mozindo na nga
C2: Yo lolendo na nga (2fois)
Yo nde natutelaka tolo
Ref.
C3: Yo esengo na nga (2fois)
Oyo otindisi motema na nga
Ref.
C4: Yo nde kimia na ngay (2fois)
Na bengaka yo Jehovah Shaloom
Ref.
C5: Yo makasi nanga (2fois)
Makasi ya bitumba na nga
Ref.
C6: Yo mosungi na nga(2fois)
Na kati ya minioko to na pasi
Ref.
C7 : Ozali po na nga
Moyi ebimaka na tongo
Ozali po na nga
Eyano na mikaka tano
(Nzela ya solo ya kotamola
Yesu na nga kumama) 2fois,
Kumama,kumama eh Yahwe (7fois)
Kumama eeh Yahwe Yahwe Yahwe
Loyembo na nga ya lelo
Lokumu na pesa na yo
Balobi yo okosaka te
Bilaka nionso osalaka papa
Nzambe oyo omonana na Abraham
Akosa elaka moko te
Nzambe oyo akabola mayi na ebale
Azonga ka jamais na sima eeh
Lokumu, nkembo ezonga na yo
Monzete oyo ya tongo
Lokumu, nkembo ezonga na yo
Nzambe na nga oyo akosakate
Tina ya masanjoli na nga
Moto nini awa na se yahwe
Amona nanu elembo na Yo te
Bongo afanda kimia
Azanga kobeta ata maboko
Na bandela ngo na wapi yaya
Motema epeli nde moto
Yahwe oh yahwe yo kumama na Yo
Yahwe yamba loyembo na nga
Na benga yo nakombo nini
Liziba na nga oyo ekawukaka te
Loyembo na nga emati na talo nionso
Ekutana bisika oyo ozali
Nabanda bisika oyo wapi
Ba sujets nionso Yahwe etondi motema
Yahwe nzambe
Yahwe likonji
Oh Yahwe mozindo
Yahwe makasi
Yo nde mpijo ya basantu, Yahwe
Nguba ya btumba, Yahwe
Yahwe mopanda ya elumba, Yahwe
Moboko ya basantu, yahwe
Nabenga yona kombo nini, Yahwe, Yahwe ooo
Epeli na motema nanga,yahwe
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates