Date & Visites
Mer 04 Fév 2026.
Visiteurs : 790017
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Refrain: Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelileeee!
Lead1: Na Jerusalem
Ba kangaki Nkolo Yesu
Basi baza kolela
Pasi eliaki nzoto
Na nzela ya Gologotha
Ekulusu akomema
Na ngomba ya Gologotha
Ba bakaki Nkolo Yesu
Amonaki solo pasi
Ye oyo pate na Nzambe
Akufaki po to bika
Yango nga pe na koyemba
Refrain: Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelileeee!
Lead2: Oyo nzela ya mpasi
Endimaki Nkolo Yesu
Ye oyo azalaki Nzambe
Andimaki liwa ya mpasi
Bolingo ne na motema
Ekotika nga kimia te
Yango nazali koyemba
Bolingo na Ye suka te
Amonaki solo pasi
Oyo pate na Nzambe
Akufaki po to bika
Yango ngayi pe na koyemba;
Refrain: Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelileeee!
Lead3: Tika na yembela Ye
Bolingo na Ye na motema
Ekotika nga kimia te
Tika na yembela Ye
Nkolo na nga Yesu
Paroles : Nionso ezalaki se na Jérusalem
Tango ba kangaki Nkolo na biso
Ye oyo azalaki Nzambe
Andimaki kokita na se
Po ete ngayi na yeba ko bikisama
Soki ye akitaki te
Nde liwa elingaki kozua esika na bomoyi na ngayi
Mais bolingo na ye ekangoli nga na masumu
Na ekulusu Nkolo agangi makasi
Eli, Eli, lama sabatani
Nkolo alobi ete nionso ekokisami
Ezalaki be na ekulusu
Tango basi baza kolela
Mitema ya bato ezoki pota
Na oyo esalamaki na ekulusu
Innoncent ayebi kokufa na esika na biso
Bolingo na Ye na motema, Ekoki kotika bisokimia te
Yango toza ko tatola bolingo ya Nkolo Yesu
Refrain: Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelile! Lelileeee!
Lead4: Bolingo na motema
Ekotika nga kimia te
Bolingo ya Nkolo Yesu
Yango na za koyemba
Kuna na Golgotha
Yesu akokisaki nionso
Po ete ngayi na bika
Bolingo ya Nkolo Yesu
Ekoti ya Nzube na motu
Mopangu na mopanzi na Ye
Eli, Eli, lama sabatani
Nkolo agangi makasi
Bolingo na Ye na motema
Epesi ngayi elikia
Kuna na Jérusalem
Elikia ezongaki solo.
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2026, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates