Date & Visites
Lun 15 Dec 2025.
Visiteurs : 776519
Aujourd'hui : 1
En ligne : 1
Lead: Otiki kiti ya bokonzi na Yo
Yo kiti na se ko kangola nga
Bolingo na Yo eleki monene
Yango lelo to yembeli Yo;
Liwa ya soni oyo Y’okufaki
Y’otalisaki bolingo na Yo
Osikola nga, Y’okamataki
Y’ozali solo elonga na nga;
Na belelaka se kombo na Yo
Y’oyakoka pe Y’oyanolaka
Tokende wapi soki na Yo te
Miso na ngay epayi na Yo;
Choeur: (Mosala oyo y’ekulusu
Kufa na Yo ebikisi mokili
Golgotha, nionso ekokisami
Otalisi bo Nzambe na Yo
Solo ozali mokonzi na nga
Oza ya sol’elombe mobali
Obebisi misala ya satana
Opesi elonga epayi ya bato
Pota na Yo, maladi esili
Nkolo Yesu, engambe mobali
Makila na Yo, tosikolami
Masumu nionso elimbisami ;
Ozali Nzambe, Nzambe na bato
Nini lisusu, tokoki ko zanga
Wolo, palata ezali ya Yo
Ozali ekimelo na nga ;
Bomoyi na biso, se ngolu na Yo
Kombo na Yo, tokomi bana Nzambe
Eloko nini, tokoki ko zanga
Kati na Yo tokomi basanjoli) x3.
.: LOYEMBO :.
*** Musique Chrétienne Intégrale ***
Copyright © 2008-2025, ETS DADUTIC All rights reserved.
Template by OS Templates